1 Tala bakitani ya Aron mpe ya Moyize na tango oyo Yawe asololaki na Moyize, na ngomba Sinai.
2 Bakombo ya bana mibali ya Aron ezalaki : Nadabi, mwana ya liboso ; Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
3 Yango nde bakombo ya bana mibali ya Aron, oyo babulisaki na nzela ya kopakola mafuta mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe. 4 Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya Yawe tango bazalaki kobonza mbeka, na nzela ya moto oyo ebulisama te, liboso ya Yawe, na esobe ya Sinai. Batikalaki kozala na bana te. Boye Eleazari mpe Itamari kaka nde batikalaki kosala mosala ya bonganga-Nzambe na bokambami ya tata na bango, Aron.
5 Yawe alobaki na Moyize : 6 « Yeisa libota ya Levi pene ya Nganga-Nzambe Aron mpe pesa bango na maboko na ye mpo ete basunga ye. 7 Bakosalisa ye mpe bakosunga lisanga mobimba liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na kosala misala ya Mongombo. 8 Bakobatela bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bakosalisa bana ya Isalaele na nzela ya kosala mosala ya Mongombo. 9 Pesa Balevi na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bango nde kati na bana ya Isalaele basengeli komipesa mobimba epai na ye. 10 Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »
11 Yawe alobaki lisusu na Moyize : 12 « Nakamati Ngai moko Balevi kati na bana ya Isalaele na esika ya bana mibali nyonso ya liboso, mbuma ya liboso ya libumu ya mwasi nyonso ya Isalaele. 13 Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. »
14 Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai : 15 « Tanga motango ya Balevi kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Tanga bana mibali nyonso kobanda na ye oyo azali na sanza moko ya mbotama mpe koleka. »
16 Boye, Moyize atangaki bango ndenge Yawe atindaki ye.
40 Yawe alobaki na Moyize : « Tanga motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele, oyo bazali na sanza moko ya mbotama mpe koleka, mpe koma bakombo na bango. 41 Okotia Balevi pembeni mpo na Ngai, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele nyonso ya Balevi, na esika ya bana ya liboso ya bibwele nyonso ya Isalaele. Nazali Yawe. »
42 Boye, Moyize atangaki motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya Isalaele ndenge Yawe atindaki ye. 43 Motango nyonso ya bana mibali ya liboso, oyo bakomaki bango bakombo, wuta na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale na tuku sambo na misato.
44 Yawe alobaki lisusu na Moyize : 45 « Tia Balevi pembeni, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele ya Balevi, na esika ya bibwele ya bana ya Isalaele. Balevi bazali ya Ngai. Nazali Yawe. 46 Mpo na kosikola bana ya liboso ya Isalaele nkama mibale na tuku sambo na misato oyo baleki na motango ya Balevi, 47 okokongola mbongo ya bibende, nkama mitano, kolanda ndenge batangaka mbongo kati na Esika ya bule, mpo na moto moko na moko. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale. 48 Okopesa mbongo oyo osikoleli bana mibali nyonso, oyo baleki na motango ya Balevi, epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali. »
49 Boye Moyize akongolaki mbongo ya lisiko epai ya bato oyo balekaki na motango ya bana liboso oyo Balevi oyo basikolaki. 50 Azwaki na maboko ya bana liboso ya Isalaele mbongo ya bibende nkoto moko na nkama misato na tuku motoba na mitano kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule. 51 Bongo Moyize apesaki mbongo yango ya lisiko epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
<- Mitango 2Mitango 4 ->