1 Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko. 2 Boye Balaki, mwana mobali ya Tsipori, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo bana ya Isalaele basalaki bato ya Amori. 3 Mpe bato ya Moabi bakomaki kobanga makasi mpo ete bana ya Isalaele bazalaki ebele penza. Boye, bakomaki na somo mingi liboso ya bana ya Isalaele. 4 Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani : « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. »
7 Bakambi ya Moabi mpe ya Madiani bakendeki mpe bamemaki makabo mpo na kopesa na Balami, momoni makambo. Tango bakomaki epai ya Balami, bayebisaki ye makambo oyo Balaki atindaki.
8 Balami alobaki na bango :
9 Nzambe ayaki epai ya Balami mpe atunaki ye :
10 Balami alobaki na Nzambe :
12 Kasi Nzambe alobaki na Balami :
13 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki mpe alobaki na bakambi ya Balaki :
14 Boye, bakambi ya Moabi bazongaki epai ya Balaki mpe balobaki :
15 Balaki atindaki bakambi mosusu oyo bazalaki mingi mpe na lokumu koleka bakambi oyo atindaki liboso. 16 Bakomaki epai ya Balami mpe balobaki :
18 Kasi Balami azongiselaki bango :
20 Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki :
21 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki, abongisaki ane na ye ya mwasi mpe akendeki elongo na bakambi ya Moabi.
22 Kasi tango akendeki, Nzambe asilikaki makasi mpe anjelu ya Yawe atelemaki na nzela mpo na kokanga ye nzela tango azalaki kotambola likolo ya ane elongo na basali na ye mibale. 23 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe atelema na kati-kati ya nzela na mopanga ya minu na loboko na ye, ane ebimaki na nzela mpe ekimaki na elanga. Boye, Balami abetaki ane mpo ete ekoka kozonga na nzela. 24 Mpe lisusu, anjelu ya Yawe akendeki kotelema na nzela moko ya moke, oyo elekela na kati-kati ya bilanga mibale ya vino, oyo mopanzi moko na moko na yango ezalaki lokola na bamir mibale. 25 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, epusanaki pembeni ya mir, efinaki lokolo ya Balami na mir. Balami abetaki yango lisusu. 26 Anjelu ya Yawe alekaki liboso na bango mpe akendeki kotelema na esika moko ya moke penza, epai wapi nzela ya kobalukela na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi ezali te. 27 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, evandelaki Balami, nkolo na yango. Balami atombokaki makasi mpe akomaki kobamba ane lingenda na ye. 28 Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami :
29 Balami azongiselaki ane :
30 Ane elobi na Balami :
31 Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele.
32 Anjelu ya Yawe atunaki ye :
34 Balami alobaki na anjelu ya Yawe :
35 Anjelu ya Yawe alobaki na Balami :
36 Tango Balaki ayokaki sango ete Balami azali koya, akendeki kokutana na ye na engumba ya bato ya Moabi, oyo ezalaka na mondelo ya Arinoni, na suka ya mokili na ye. 37 Balaki alobaki na Balami :
38 Balami azongiselaki Balaki :
39 Boye, Balami akendeki nzela moko na Balaki kino na Kiriati-Utsoti. 40 Balaki abonzaki mbeka ya ngombe mpe ya meme, apesaki ndambo epai ya Balami mpe ndambo mosusu epai ya bakambi oyo bazalaki na ye elongo.
41 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balaki amemaki Balami, mpe bamataki na Bamoti-Bala ; mpe wuta kuna, bakokaki komona ndambo ya bana ya Isalaele.
<- Mitango 21Mitango 23 ->