1 Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita ; ezalaki : Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti. 2 Batombokelaki Moyize. Elongo na bango, ezalaki na bana ya Isalaele nkama mibale na tuku mitano oyo bayebanaki malamu lokola bakambi ya lisanga mpe bazalaki kosangana kati na mayangani ya bakambi ya lisanga. 3 Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango :
4 Tango Moyize ayokaki bongo, akweyaki elongi kino na mabele. 5 Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye :
8 Moyize alobaki lisusu na Kore :
12 Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki :
15 Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe :
16 Moyize alobaki na Kore :
18 Moto na moto akamataki mbabola na ye, atiaki moto mpe malasi ya ansa kati na yango ; bongo atelemaki esika moko na Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 19 Tango Kore asangisaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, nkembo ya Yawe ebimelaki lisanga mobimba, 20 mpe Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
22 Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki :
23 Bongo, Yawe alobaki na Moyize :
25 Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami ; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye. 26 Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! »
27 Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo.
28 Bongo Moyize alobaki : « Tala ndenge nini bokoyeba solo ete Yawe atindaki ngai kosala makambo oyo nyonso, kasi ezali makanisi ya motema na ngai moko te : 29 Soki bato oyo bakufi kufa ya bato nyonso mpe bamoni makambo oyo bato nyonso bamonaka, wana nde Yawe atindaki ngai te ! 30 Kasi soki Yawe asali penza likambo moko ya sika, bongo mabele efungoli monoko na yango mpe emeli bango elongo na biloko na bango nyonso, mpe bakiti ya bomoi kati na mokili ya bakufi, wana nde bokoyeba solo ete bato oyo batiolaki Yawe. »
31 Tango kaka asilisaki koloba makambo oyo nyonso, mabele efungwamaki na se ya matambe ya Datani mpe Abirami ; 32 efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso. 33 Bakitaki ya bomoi kati na mokili ya bakufi elongo na biloko na bango nyonso, mabele ezipaki bango mpe bakufaki ndenge wana. Mpe balimwaki kati na lisanga. 34 Bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki pembeni na bango bakimaki tango bayokaki bango koganga. Bazalaki komilobela : « Mabele ekomela biso mpe lokola ! »
35 Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.
<- Mitango 15Mitango 17 ->