1 Tango mokolo ya Saba elekaki, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Jake mpe Salome, basombaki mafuta ya solo kitoko mpo na kokende kokawusa nzoto ya Yesu mpo ete ebeba te. 2 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana moyi ebandi kobima, bakendeki na kunda. 3 Bazalaki kotunana kati na bango :
4 Mpe tango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kotindikama mpe ezalaki lisusu te na ekotelo ya kunda ; nzokande, libanga yango ezalaki ya monene penza.
5 Sima na bango kokota kati na kunda, bamonaki elenge mobali moko, avandi na ngambo ya loboko ya mobali, alata nzambala ya pembe ; somo ekangaki bango.
6 Kasi alobaki na bango :
8 Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga.
9 Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo. 10 Bongo Mari akendeki koyebisa bato oyo batambolaki elongo na Yesu ; akutaki bango batondi na mawa mpe bazali kolela. 11 Kasi tango bayokaki ye koloba : « Yesu azali na bomoi, awuti kobimela ngai, » bandimaki ye te.
12 Sima na yango, Yesu abimelaki mibale kati na bango na lolenge mosusu, wana bazalaki kokende na mboka. 13 Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu ; kasi bayekoli yango bandimaki bango te.
14 Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye. 15 Alobaki na bango :
19 Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. 20 Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.