Malashi
1 Liloba na Yawe. Liloba na Yawe epai ya Isalaele na nzela ya mosakoli Malashi.
6 Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
7 Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo ? ›
9 « Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko ! Boni, andima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
10 « Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.
11 Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
12 « Kasi bino, bozali kosambwisa yango tango bozali koloba ete mesa ya Nkolo ezali na tina te mpe biloko na yango ezali mbindo. 13 Bozali koloba lisusu : ‹ Mokumba nini lisusu oyo ! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino ? » elobi Yawe.
14 « Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai.
Malashi 2 ->