1 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki. 2 Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda. 3 Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu. 4 Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi. 5 Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango :
9 Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso. 10 Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma, 11 kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te.
12 Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema.
13 Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale. 14 Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema. 15 Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko. 16 Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu.
17 Alobaki na bango :
19 Yesu atunaki bango :
22 Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo, 23 kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi. 24 Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te.
25 Yesu alobaki na bango :
27 Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.
28 Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika. 29 Kasi bango babondelaki Ye makasi :
33 Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango, 34 oyo balobaki na bango :
35 Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni.
36 Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki :
37 Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima.
38 Yesu atunaki bango :
40 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. 41 Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango :
42 Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. 43 Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango.
44 Bongo alobaki na bango :
45 Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.
46 Alobaki na bango :
50 Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango.
51 Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo.
52 Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi. 53 Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.