21
Likabo ya mwasi akufisa mobali
(Mlk 12.41-44)
1 Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo ; 2 amonaki mpe mwasi mobola moko akufisa mobali kotia mbongo ya bibende mibale. 3 Alobaki :
Yesu asakoli pasi mpo na Yelusalemi
(Mat 24.1-8; Mlk 13.1-8)
5 Ndambo ya bayekoli bazalaki kolula kitoko ya Tempelo, ndenge ezalaki kongala na mabanga ya kitoko mpe na biloko ya kitoko oyo bazalaki kobonzela Nzambe lokola makabo. Kasi Yesu alobaki :
6 — Mikolo ekoya oyo, kati na nyonso oyo bozali komona awa, ata libanga moko te ekotikala na likolo ya libanga mosusu ; nyonso ekobukama.
7 Batunaki Yesu :
— Moteyi, makambo yango ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango ekomi pene ya kokokisama ?
8 Yesu azongisaki :
10 Bongo alobaki na bango :
(Mat 10.17-22; Mlk 13.9-13)
12 Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai. 13 Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.
14 Bozala na mitema ya kokita, bomitungisa te mpo na koluka koyeba ndenge nini bokosamba. 15 Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba. 16 Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali mpe ya basi, baninga mpe balingami na bino bakokaba bino, mpe bakobomisa mingi kati na bino. 17 Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, 18 kasi suki ata moko te ya mito na bino ekobunga. 19 Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.
(Mat 24.15-21; Mlk 13.14-20)
20 Tango bokomona mampinga ya basoda ezingeli Yelusalemi, boyeba ete kobebisama na yango ekomi pene. 21 Wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; tika ete bato oyo bakozala kati na Yelusalemi babima ; mpe tika ete bato oyo bakozala kati na bilanga bazonga te kati na engumba ! 22 Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.
23 Na mikolo yango, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! Pamba te pasi ekozala makasi kati na mokili, mpe kanda ya Nzambe ekokweyela bato yango. 24 Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.
(Mat 24.29-35; Mlk 13.24-31)
25 Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene. 26 Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama. 27 Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.
28 Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.
29 Alobaki na bango lisese oyo :
34 Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata, 35 lokola monyama, pamba te ekoya likolo ya bato nyonso ya mokili mobimba. 36 Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.
37 Mikolo nyonso, na moyi, Yesu azalaki koteya kati na Tempelo ; mpe na butu, azalaki kobima mpo na kokende kolala na ngomba ya banzete ya olive. 38 Na tongo makasi, bato nyonso bazalaki koya epai na Ye, kati na Tempelo, mpo na koyoka Ye.
<- Luka 20Luka 22 ->