17
Lolenge ya kovanda elongo na bandeko
(Mat 18.6-7; Mlk 9.42)
1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
(Mat 18.15, 21-22)
Kondima lokola mbuma ya mutarde
(Mat 17.19-20)
5 Bantoma balobaki na Nkolo :
— Bakisa kondima na biso !
6 Nkolo azongisaki :
Tozali basali ya pamba
7 Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga : « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia ? » 8 Boni, akoloba na ye te : « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela ; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela ? » 9 Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye ? 10 Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »
Yesu abikisi bato na maba zomi
11 Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile. 12 Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika 13 mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi :
— Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !
14 Tango Yesu amonaki bango, alobaki :
Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. 15 Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. 16 Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.
17 Bongo Yesu atunaki :
19 Bongo alobaki na moto yango ya Samari :
Lolenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekoya
20 Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu :
— Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ?
Yesu azongiselaki bango :
22 Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
(Mat 24.23-28; Mlk 13.21-22)
23 Bakoloba na bino : « Azali awa ! » to « Azali kuna ! » Bolanda bango te ! 24 Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste. 25 Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.
(Mat 24.37-41)
26 Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto : 27 bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso. 28 Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti : bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga. 29 Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso. 30 Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana.
(Mat 24.17-18; Mlk 13.15-16)
31 Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo. 32 Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti !
33 Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.
(Mat 24.40-41)
34 Nazali koloba na bino : na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; 35 basi mibale bakozala konika bambuma elongo : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ; [ 36 mibali mibale bakozala kati na elanga moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala. ][a]
37 Bayekoli batunaki Yesu :
— Nkolo, makambo yango ekosalema wapi ?
Yesu azongiselaki bango :
-
a Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu