1 Mokolo moko lisusu, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango.
2 Yawe atunaki Satana :
3 Yawe alobaki na Satana :
4 Satana azongiselaki Yawe :
6 Yawe alobaki na Satana :
7 Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto.
8 Yobo akamataki eteni ya mbeki mpo na komikwanza na yango nzoto, mpe amivandisaki na putulu. 9 Mwasi na ye alobaki na ye :
10 Yobo azongiselaki ye :
11 Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye.
12 Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito. 13 Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi.
<- Yobo 1Yobo 3 ->