Yoane
1 Na ebandeli, Ye oyo azali Liloba azalaka ; azalaka elongo na Nzambe, mpe azali Nzambe. 2 Wuta na ebandeli, azalaka elongo na Nzambe. 3 Nzambe akelaki biloko nyonso na nzela na Ye ; ezali na eloko moko te oyo ekelama soki na nzela na Ye te. 4 Bomoi ewuta epai na Ye, mpe bomoi yango ezalaki pole mpo na bato. 5 Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.
6 Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane. » 7 Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye. 8 Ye moko Yoane azalaki pole te, kasi ayaki nde mpo na kozala motatoli na tina na pole.
9 Pole ya solo eyaki na mokili, mpe engengisaka bato nyonso. 10 Ye oyo azali Liloba azalaki kati na mokili, pamba te Ye nde akelaki yango, kasi mokili endimaki Ye te. 11 Ayaki epai ya ekolo na Ye, kasi bato ya ekolo na Ye moko bayambaki Ye te ; 12 nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe. 13 Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.
14 Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.
15 Yoane azalaki kotatola na tina na Ye, na mongongo makasi : « Botala Ye oyo nalobaki na tina na Ye : ‹ Ye oyo azali koya sima na ngai aleki ngai na lokumu, pamba te azalaki liboso ete ngai nazala. › » 16 Lokola atonda na bolingo mpo na biso, apesaki biso ngolu likolo ya ngolu ; 17 pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto. 18 Moto moko te amona Nzambe, kasi ezali kaka Mwana se moko oyo azali Nzambe mpe azali moko na Tata nde atalisaki biso Ye.
19 Tala litatoli oyo Yoane apesaki tango bakambi ya Bayuda batindaki, wuta na Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe Balevi, mpo na kotuna ye :
20 Abetaki monoko te, kasi alobaki na bango solo na bonsomi nyonso :
21 Batunaki ye lisusu :
22 Bakobaki kotuna ye :
23 Yoane azongiselaki bango kolanda ndenge mosakoli Ezayi alobaki :
24 Nzokande batindami yango bazalaki Bafarizeo. 25 Batunaki ye lisusu :
26 Yoane azongiselaki bango :
28 Makambo oyo nyonso esalemaki na Betani, na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi Yoane azalaki kobatisa.
29 Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki :
32 Bongo Yoane apesaki litatoli oyo :
35 Mokolo oyo elandaki, wana Yoane azalaki lisusu na esika yango elongo na bayekoli na ye mibale, 36 amonaki Yesu koleka mpe alobaki : « Botala Mpate ya Nzambe ! »
37 Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu. 38 Bongo tango Yesu abalukaki mpo na kotala na sima, amonaki bango mibale bazali kolanda Ye. Atunaki bango :
39 Yesu azongiselaki bango :
40 Andre, ndeko ya Simona Petelo, azalaki moko kati na bato wana mibale oyo bayokaki maloba ya Yoane mpe balandaki Yesu. 41 Akendeki kokutana na Simona, ndeko na ye, mpe alobaki na ye : « Tomoni Masiya[b] ! » 42 Bongo amemaki Simona epai ya Yesu.
43 Mokolo oyo elandaki, Yesu azwaki mokano ya kokende na Galile. Na nzela, akutanaki na Filipo mpe alobaki na ye :
44 Filipo, Andre mpe Petelo bazalaki bato ya engumba Betisaida. 45 Filipo akutanaki na Natanaele mpe alobaki na ye :
46 Natanaele atunaki ye :
47 Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye :
48 Natanaele atunaki Ye :
49 Natanaele alobaki :
50 Yesu alobaki na ye :
51 Bongo alobaki lisusu :