« Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble
na tango banyataka-nyataka yango ;
mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango.
34 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ;
solo, atiaki biso na mobulu,
akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ;
amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama,
atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ;
mpe sima, asanzaki biso.
35 Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso
ekweyela Babiloni, »
elobi bavandi ya Siona !
« Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni,
elobi bavandi ya Yelusalemi ! »
36 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tala, nakozwa likambo na yo na maboko
mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe,
nakokawusa ebale na yango ya monene
mpe nakokawusa maziba na yango.
37 Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga,
ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ;
bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.
38 Bato na yango nyonso bakokoma koganga
lokola nkosi ya mike
mpe kolela lokola bana ya nkosi.
39 Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto,
nakobongisela bango feti
mpe nakolangwisa bango masanga
mpo ete batondisama na esengo ;
bongo, bakolala pongi ya libela
mpe bakoka lisusu kolamuka te, »
elobi Yawe,
40 « nakomema bango ndenge bamemaka bampate
to bameme ya mibali to mpe bantaba ya mibali
na esika oyo babomelaka bibwele.
41 Ndenge nini bakangi Sheshaki !
Ndenge nini basukisi lolendo ya ekolo
oyo ezalaki kosala lokumu ya mokili mobimba !
Ndenge nini penza Babiloni ekomi penza
eloko ya somo kati na bikolo !
42 Ebale monene ekozindisa Babiloni,
makelele ya bambonge na yango ekozipa mokili ya Babiloni.
43 Bingumba na yango ekobebisama,
ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe,
mokili oyo bato bavandaka te,
mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te.
44 Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni,
nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko ;
ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye
mpe bamir ya Babiloni ekokweya.
45 Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni !
Bobikisa bomoi na bino liboso ya kanda makasi ya Yawe !
46 Bobanga te mpe bolemba nzoto te
tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili :
mobu oyo, sango ya mabe ; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe ;
kaka sango ya mobulu kati na mokili
to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu.
47 Pamba te tango ekoya solo,
tango oyo nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni ;
mpe mokili na yango nyonso ekozala na soni,
mpe bato na yango nyonso oyo bazokisa makasi na mopanga
bakokufa kuna.
48 Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango
ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni,
pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, »
elobi Yawe.
49 « Babiloni mpe esengeli kokweya,
mpo na bana ya Isalaele oyo bakufaki,
ndenge kaka bato ya mokili mobimba bakufaki mpo na Babiloni.
50 Bino bato oyo bobiki na mopanga,
bokima, bolekisa tango te !
Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi !
51 Tosambwe, pamba te totiolami ;
mpe bilongi na biso ezipami na soni
mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule
ya Tempelo ya Yawe.
52 Kasi na mikolo ekoya, »
elobi Yawe,
« nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni,
mpe mokili mobimba ekotonda na makelele ya bato
oyo bazoka bapota ya somo.
53 Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola
mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi,
nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, »
elobi Yawe.
54 « Makelele ya koganga ekoyokana, wuta na mokili ya Babiloni,
lokito makasi ya kobebisama ya mokili ya bato ya Babiloni.
55 Pamba te Yawe akobebisa Babiloni
mpe akokanga yango monoko.
Lokito ya banguna ekoyokana lokola makelele
ya bambonge ya bibale minene ;
bongo mingongo ya bato ekoyokana makasi.
56 Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ;
bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko
mpe bakobuka matolotolo na bango,
pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka :
afutaka kolanda misala ya moto na moto.
57 Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya,
bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko.
Bakolala pongi ya libela
mpe bakolamuka lisusu te, »
elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga.
58 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama
mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ;
bato bazali kosala bobele mosala ya pamba
mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi
mpo na mosala oyo ekobeba na moto. »
Buku ezindi na ebale
59 Tala sango oyo mosakoli Jeremi apesaki epai ya Seraya, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, tango akendeki na Babiloni elongo na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. Seraya azalaki mokonzi ya molako. 60 Jeremi akomaki kati na buku pasi nyonso oyo esengelaki kokomela Babiloni. Makambo wana nyonso ekomamaki na tina na mokili ya Babiloni. 61 Jeremi alobaki na Seraya : « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi. 62 Bongo okoloba : ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. › 63 Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba : 64 ‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › »