1 Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo. 2 Kuna na Likolo, asalaka mosala na Ye kati na Esika ya bule, elingi koloba : Mongombo ya solo, oyo Ye moko Nkolo atonga, kasi bato te.
3 Mokonzi nyonso ya Banganga-Nzambe atiamaka mpo na kobonza makabo mpe bambeka. Boye Yesu, Mokonzi na biso ya Banganga-Nzambe, asengeli mpe kozala na eloko ya kobonza lokola likabo to mbeka. 4 Soki azalaki na mokili, alingaki kozala ata Nganga-Nzambe te, pamba te ezali kuna na Banganga-Nzambe oyo babonzaka makabo kolanda Mobeko, 5 ba-oyo basalaka na Esika ya bule oyo ezali kaka elilingi mpe elili ya oyo ezali kati na Likolo. Yango wana, tango Moyize alingaki kotonga Mongombo, Nzambe akebisaki ye boye : « Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. »
6 Kasi sik’oyo, Yesu azwi mosala oyo eleki motuya, pamba te azali Moyokanisi kati na Boyokani oyo eleki malamu, Boyokani oyo etongami na likolo ya bilaka ya malamu koleka.
7 Solo, soki boyokani ya liboso ezangaki pamela, tina ya koluka boyokani ya mibale elingaki kozala te.
8 Nzokande, Nzambe apamelaki penza bato na Ye tango alobaki :
13 Awa Nkolo abengi Boyokani oyo « Boyokani ya sika, » elingi koloba ete akomisi oyo ya liboso boyokani ya kala ; nzokande eloko oyo ekomi ya kala mpe enuni ekomi pene ya kolimwa.
<- Ba-Ebre 7Ba-Ebre 9 ->