1 Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali : « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino ? 2 Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. »
3 Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble. 4 Kasi Jakobi atikaki te Benjame, ndeko ya Jozefi ya mobali, ete akende elongo na bango, pamba te azalaki kobanga ete likama ekweyela ye.
5 Kati na bato oyo bakendeki kosomba ble na Ejipito, bana mibali ya Isalaele mpe bazalaki ; pamba te nzala makasi ekotaki mpe na mokili ya Kanana.
6 Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se. 7 Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango :
8 Atako Jozefi asosolaki ete bazali bandeko na ye, kasi bango basosolaki ye te. 9 Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango :
10 Bazongisaki :
12 Alobaki na bango :
13 Kasi bango bazongisaki :
14 Kasi Jozefi alobaki na bango :
17 Atiaki bango nyonso na boloko mikolo misato. 18 Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango :
22 Ribeni alobaki na bango :
23 Bayebaki te ete Jozefi akokaki kososola maloba na bango, mpo ete azalaki kosalela molimboli mpo na kosolola na bango. 24 Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango. 25 Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo. 26 Batiaki ble na bango likolo ya ba-ane na bango mpe bakendeki.
27 Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye. 28 Ayebisaki bandeko na ye :
29 Tango bakomaki epai ya tata na bango Jakobi na mokili ya Kanana, bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. Balobaki :
33 Na boye, moto oyo azali mokonzi ya mokili azongiselaki biso : « Tala lolenge nakoyeba ete bozali bato ya sembo : ‹ Botikela ngai awa ndeko moko kati na bino. Bozwa biloko ya kolia oyo esengeli mpo na mabota na bino oyo ezali na nzala makasi mpe bokende. 34 Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo ; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › »
35 Tango bafungolaki basaki na bango, moko na moko amonaki mbongo na ye na saki. Bango na tata na bango bamonaki mbongo mpe bango nyonso babangaki. 36 Tata na bango Jakobi alobaki na bango :
37 Ribeni alobaki na tata na ye :
38 Jakobi azongisaki :