1 Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili, 2 amonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili. 3 Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi, ya mabe mpe ekonda, ebimaki wuta na ebale, etelemaki pembeni ya bangombe ya basi oyo ezalaki pembeni ya ebale Nili. 4 Bangombe sambo ya basi ya mabe mpe ekonda eliaki bangombe sambo ya kitoko mpe ya mafuta. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki.
5 Alalaki lisusu mpe alotaki ndoto ya mibale : nzete moko ya ble ebimisaki mito sambo ya ble, ya minene mpe ya kitoko. 6 Mito mosusu sambo ya ble, ekonda mpe ezika na mopepe ya este, ebimaki sima na oyo ya minene. 7 Mito sambo oyo ekonda eliaki mito sambo oyo ya minene mpe etonda. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki, asosolaki ete ezali ndoto.
8 Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
9 Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon : « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai. 10 Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. 11 Biso mibale tolotaki bandoto na butu moko : ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango. 12 Kuna, tozalaki na elenge mobali moko, azali Mo-Ebre mpe mosali ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. Toyebisaki ye bandoto na biso mpe alimbolaki yango mpo na biso, apesaki moto na moto ndimbola ya ndoto na ye. 13 Makambo nyonso esalemaki ndenge kaka alimbolelaki biso yango. Ngai nazongelaki misala na ngai ; mpe moninga mosusu, badiembikaki ye. »
14 Faraon abengaki Jozefi, mpe babimisaki ye na lombangu na boloko. Bakataki ye suki, alataki bilamba mosusu mpe ayaki liboso ya Faraon.
15 Faraon alobaki na Jozefi :
16 Jozefi azongiselaki Faraon :
17 Faraon alobaki na Jozefi :
25 Jozefi alobaki na Faraon :
37 Likambo yango esepelisaki Faraon mpe basali na ye nyonso. 38 Faraon atunaki bango :
39 Faraon alobaki na Jozefi :
41 Faraon alobaki na Jozefi :
42 Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo. 43 Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga : « Bofukama ! »
44 Faraon alobaki lisusu na Jozefi :
45 Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito. 46 Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.
47 Na mibu sambo ya bofuluki, mabele ebotaki mingi. 48 Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango. 49 Jozefi abombaki ble ebele lokola zelo ya ebale monene, ezalaki mingi koleka ; yango wana bakataki kotanga, pamba te bakokaki kotanga yango lisusu te.
50 Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale. 51 Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki : « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. » 52 Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. »
53 Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka, 54 mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te. 55 Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito : « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. »
56 Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito ; kasi nzala makasi ekobaki kaka. 57 Mikili nyonso ezalaki koya na Ejipito mpo na kosomba ble epai ya Jozefi mpo ete nzala makasi ekotaki na mokili mobimba.
<- Ebandeli 40Ebandeli 42 ->