1 Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia. 2 Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye :
6 Boye, Izaki avandaki na Gerari.
7 Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki :
10 Abimeleki alobaki lisusu :
11 Abimeleki apesaki mitindo na bato nyonso :
12 Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.
13 Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele. 14 Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele. 15 Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele. 16 Bongo Abimeleki alobaki na Izaki :
17 Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki. 18 Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango. 19 Basali ya Izaki batimolaki na lubwaku mpe bamonaki kuna libulu ya mayi ya peto. 20 Babateli bibwele ya Gerari baswanisaki babateli bibwele ya Izaki mpe balobaki na bango : « Mayi oyo ezali ya biso. » Izaki apesaki libulu yango kombo « Eseki[a], » pamba te baswanisaki ye na tina na yango. 21 Batimolaki libulu mosusu, kasi baswanisaki ye lisusu na tina na yango, mpe apesaki yango kombo « Sitina[b]. » 22 Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu ; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti[c], » pamba te alobaki : « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. » 23 Kolongwa wana, akendeki na Beri-Sheba.
24 Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. » 25 Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.
26 Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki. 27 Izaki atunaki bango :
28 Bazongiselaki ye :
34 Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti. 35 Basi yango bazalaki koyokisa Izaki mpe Rebeka pasi na motema.
<- Ebandeli 25Ebandeli 27 ->