1 Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri ; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari. 2 Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi. 3 Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »
4 Nzokande, Abimeleki apusanaki nanu te pembeni na ye. Agangaki :
6 Nzambe alobaki na ye na ndoto :
8 Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi. 9 Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye :
10 Abimeleki atunaki Abrayami :
11 Abrayami azongisaki :
14 Boye Abimeleki azwaki bameme, bantaba, bangombe, basali ya mibali mpe ya basi, apesaki na Abrayami. Mpe azongiselaki ye mwasi na ye Sara. 15 Abimeleki alobaki : « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. »
16 Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. »
17 Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ; 18 pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.
<- Ebandeli 19Ebandeli 21 ->