1 « Sik’oyo mwana na moto, kamata biliki ya kotumba, tia yango liboso na yo mpe koma na likolo na yango elilingi ya engumba Yelusalemi. 2 Sala yango lokola engumba oyo bazingela, oyo batonga mabulu ya kobombamela zingazinga na yango mpe oyo batelemisa bamir ya zelo mpo na kobombama, engumba oyo batonga milako zingazinga na yango, mpe telemisa bakonzi ya basoda oyo babongami mpo na kobundisa yango na zingazinga. 3 Kamata eteni ya linzanza, tia yango lokola mir ya ebende na kati-kati na yo mpe elilingi ya engumba oyo osili kokoma, mpe tika ete miso na yo etala yango. Bakozingela engumba yango ndenge kaka yo osili kozingela yango. Yango nde ekozala elembo mpo na libota ya Isalaele.
4 Bongo yo, lala na ngambo ya loboko na yo ya mwasi, tia na ngambo wana masumu ya libota ya Isalaele. Okomema masumu na bango mikolo nyonso oyo okolala na ngambo wana. 5 Ngai moko nakokatela yo motango ya mikolo, oyo ekokokana na motango ya mibu oyo libota ya Isalaele asali masumu : mikolo nkama misato na tuku libwa ; mpe okomema solo masumu ya libota ya Isalaele na mikolo oyo.
6 Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei : mokolo moko mpo na mobu moko na moko. 7 Talisa elongi mpe loboko na yo na ngambo ya Yelusalemi oyo bazingela mpe sakola mabe na tina na yango. 8 Nakolinga-linga yo na basinga mpo ete okoka kobaluka na ngambo mosusu te kino tango okokokisa mikolo na yo ya etumbu.
9 Kamata ble mpe orje, madesu mpe misili, soya mpe masango, tia yango nyonso kati na mbeki moko kaka oyo babombelaka biloko. Ezali yango nde ekozala bilei oyo okobanda kolia tango nyonso, na mikolo nkama misato na tuku libwa oyo okowumela ya kolala na ngambo moko.
10 Bilei na yo ya mokolo na mokolo ekozala ya bagrame nkama mibale na tuku mibale, mpe okobanda kolia yango tango nyonso. 11 Okobanda komela tango nyonso litele moko ya mayi. 12 Okolia bilei basala lokola gato ya orje mpe okobanda kotumba yango na miso ya bato nyonso, na moto oyo bapelisa na nyei ya bato. »
13 Yawe alobaki :
14 Bongo nalobaki :
15 Alobaki na ngai :
16 Alobaki na ngai lisusu :