8 Makambo wana nyonso ezali koya ! Nyonso ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. Ezali mokolo oyo nalobelaki. 9 Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso : banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene ; bakopelisela yango moto mibu sambo. 10 Bakozala na posa te ya kosangisa bakoni kati na bilanga to kokata banzete kati na bazamba, pamba te bakopelisa moto yango nde na bibundeli ; bakozwa lokola bomengo ya bitumba bato oyo bazwaki bango lokola bomengo ya bitumba, mpe bakobotola biloko ya bato oyo babotolaki bango biloko, elobi Nkolo Yawe.
11 Na mokolo wana, nakopesa Gogi lilita kati na mokili ya Isalaele : lubwaku ya bato oyo basalaka mibembo, longwa na ngambo ya este kino na ebale monene. Ekokanga nzela ya bato oyo basalaka mibembo, pamba te bakokunda Gogi elongo na mampinga na ye nyonso kuna. Bakokoma kobenga lubwaku yango lubwaku ya Amoni Gogi[a].
12 Libota ya Isalaele bakosala basanza sambo mpo na kokunda bibembe na bango kolanda ndenge ekatama mpo na kopetola mokili. 13 Bato nyonso ya Isalaele bakokunda bato ya Gogi ; bongo ekozala likambo ya lokumu mpo na bango, mokolo oyo nakomonisa nkembo na Ngai, elobi Nkolo Yawe.
14 Sima na basanza sambo, bakopona bato oyo mosala na bango ekozala : kotambola na mokili mpo na koluka bibembe oyo ekotikala na mabele mpe kokunda yango, na lisungi ya bato ya mobembo mpo na kopetola mokili. 15 Tango bakozala kotambola kati na mokili, soki moko kati na bango amoni mikuwa ya moto, akotia elembo pembeni na yango, kino tango bato oyo bakundaka bibembe bakokunda yango na lubwaku ya Amoni Gogi. 16 Engumba moko oyo ekobengama Amona ekotongama na esika yango. Ekozala ndenge wana nde bakopetola mokili. ›
17 Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Loba na bandeke nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba : ‹ Boya kosangana, bino nyonso elongo, wuta na bisika nyonso, mpo na mbeka na Ngai, oyo nazali kobonza Ngai moko mpo na bino, mbeka monene na likolo ya bangomba ya Isalaele ! Kuna, bokolia misuni mpe bokomela makila. 18 Bokolia misuni ya bilombe ya bitumba mpe bokomela makila ya bakambi ya mabele, ndenge basalaka na bameme ya mibali oyo ekemba, na bana meme ya mibali, na bantaba ya mibali to na bana ngombe ya mibali : nyonso esengeli kozala ya mafuta mpe kowuta na Bashani. 19 Na mbeka na Ngai, oyo nabongisi mpo na bino, bokolia mafuta kino bokotonda, mpe bokomela makila kino bokolangwa. 20 Na mesa na Ngai, bokolia mpe bokotonda misuni ya bampunda, ya batambolisi na yango, ya bilombe ya bitumba mpe ya basoda nyonso, › elobi Nkolo Yawe.
21 Nakomonisa lokumu na Ngai kati na bikolo ; bongo bikolo nyonso ekomona etumbu oyo napesi bango, mpe loboko na Ngai oyo nasemboli likolo na bango. 22 Kobanda na mokolo wana kino na mikolo ekoya, libota ya Isalaele bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. 23 Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga. 24 Napesaki bango etumbu kolanda mbindo mpe masumu na bango, mpe napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai.
25 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai. 26 Boye wana bakovanda na kimia na mabele na bango mpe ekozala na moto moko te mpo na kobangisa bango, bakobanda koyoka soni mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mabe nyonso oyo basalaki liboso na Ngai Yawe. 27 Tango nakozongisa bango epai na bango wuta na bikolo, tango nakosangisa bango wuta na mikili ya banguna na bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo ebele. 28 Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango ; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna. 29 Nakopesa bango lisusu mokongo te, pamba te nakosopa Molimo na Ngai na libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. »
<- Ezekieli 38Ezekieli 40 ->-
a Amoni Gogi elingi koloba : mampinga ya bato ya Gogi