1 Yawe alobaki na Moyize :
16 Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye. 17 Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale. 18 Tango Moyize atelemisaki Mongombo, atiaki bivandelo na esika na yango, atiaki bakadre, akotisaki mabaya mpe atelemisaki makonzi ; 19 atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
20 Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango. 21 Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
22 Moyize atiaki mesa kati na Ndako ya kapo ya Bokutani na ngambo ya nor ya Mongombo libanda ya rido ; 23 mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
24 Atiaki etelemiselo ya minda kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, etalana na mesa, na ngambo ya sude ya Mongombo. 25 Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
26 Atiaki etumbelo ya wolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya rido, 27 mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
28 Bongo atiaki rido na ekotelo ya Mongombo. 29 Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
30 Atiaki sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo mpe atiaki kati na yango mayi ya kosukola. 31 Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron basalelaki yango mpo na kosukola maboko mpe makolo na bango. 32 Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize.
33 Moyize atelemisaki lopango pembeni-pembeni ya Mongombo mpe ya etumbelo, mpe atiaki rido na ekuke ya lopango. Ezali boye nde Moyize asilisaki mosala.
34 Lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Bokutani mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo. 35 Moyize akokaki lisusu te kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te lipata evandaki likolo na yango mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo. 36 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bana ya Isalaele bazalaki kotelema mpo na kokende na mobembo na bango. 37 Kasi soki lipata elongwe te, bango mpe bazalaki kolongwa te, bazalaki kozela kino na mokolo oyo lipata ekolongwa. 38 Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo ; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.