1 Moyize asangisaki lisanga mobimba ya bana ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala :
4 Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala :
20 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele batikaki Moyize. 21 Bongo bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe na bolingo ya kopesa, babonzelaki Yawe makabo mpo na mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na misala nyonso mpe kotonga bilamba ya bule. 22 Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango. 23 Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango. 24 Bato nyonso oyo batiaki pembeni makabo ya palata to ya bronze bamemaki yango mpe babonzelaki yango Yawe ; ndenge moko mpe na bato oyo bazalaki na banzete ya akasia mpo na misala nyonso. 25 Basi nyonso oyo bayebaki kosala bilamba basalaki yango na maboko na bango mpe bamemaki bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko. 26 Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba. 27 Bakambi bamemaki mabanga ya talo ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. 28 Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko. 29 Bato nyonso ya Isalaele, ezala basi to mibali, oyo mitema na bango esimbamaki mpo na komema eloko mpo na misala oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize, bamemaki epai na Yawe makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
30 Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; 31 atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso : 32 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze, 33 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. » 34 Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala. 35 Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema.
<- Kobima 34Kobima 36 ->