1 Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito.
2 Jetro amemaki Sefora, mwasi ya Moyize, oyo ye Moyize azongisaki nanu epai ya baboti na ye, 3 elongo na bana mibali mibale oyo Sefora abotelaki Moyize. Mwana ya liboso, kombo na ye ezalaki « Gerishomi[a], » pamba te Moyize amilobelaki : « Nakomaki mopaya kati na mokili ya mopaya ; » 4 mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri[b], » pamba te amilobelaki : « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. »
5 Jetro, bokilo ya Moyize, elongo na bana mibali ya Moyize mpe mwasi ya Moyize bayaki epai ya Moyize, na esobe epai wapi batongaki molako pembeni ya ngomba ya Nzambe. 6 Jetro atindelaki Moyize maloba oyo :
7 Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo. 8 Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango. 9 Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito.
10 Jetro alobaki :
12 Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe.
13 Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa. 14 Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki :
15 Moyize azongiselaki ye :
17 Bokilo ya Moyize alobaki na ye :
24 Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki. 25 Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. 26 Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo ; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize.
27 Moyize apesaki nzela ete bokilo na ye akende, mpe Jetro azongaki na mokili na ye.
<- Kobima 17Kobima 19 ->