1 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato. 2 Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye :
3 Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki :
4 Moyize abelelaki Yawe :
5 Yawe azongiselaki Moyize :
8 Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi. 9 Moyize alobaki na Jozue :
10 Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba. 11 Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga. 12 Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango ; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa. 13 Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga.
14 Yawe alobaki na Moyize :
15 Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. » 16 Moyize alobaki : « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. »
<- Kobima 16Kobima 18 ->