1 Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango, 2 mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. »
3 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. 4 Soki oboyi kotika bango kokende, lobi nakotinda mabanki na mokili na yo. 5 Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki ; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga. 6 Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito ; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › »
8 Bongo bazongisaki Moyize mpe Aron epai ya Faraon ; mpe Faraon alobaki na bango :
9 Moyize azongisaki :
10 Faraon alobaki na bango :
12 Yawe alobaki na Moyize :
13 Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki. 14 Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te. 15 Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te : matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga.
16 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki :
18 Moyize atikaki Faraon mpe abondelaki Yawe. 19 Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito. 20 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende.
21 Yawe alobaki na Moyize :
22 Boye Moyize asembolaki loboko na ye likolo mpe molili makasi ezipaki mokili mobimba ya Ejipito mikolo misato. 23 Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda.
24 Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki :
25 Kasi Moyize alobaki :
27 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi ; mpe Faraon aboyaki kaka kotika bango kokende.
28 Faraon alobaki na Moyize :
29 Moyize azongisaki :