Ester
1 Tala makambo oyo esalemaki na tango ya mokonzi Kizerisesi oyo azalaki kokamba bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, longwa na Ende kino na Kushi. 2 Na tango wana, Kizerisesi akendeki kovanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na Size, engumba mokonzi batonga makasi. 3 Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, asalisaki feti monene mpo na bato na ye nyonso ya lokumu : bakalaka na ye, bakonzi ya basoda ya mokili ya Persi mpe ya Medi, bankumu mpe bayangeli ya bituka. 4 Na feti yango, azalaki kolakisa ebele ya bomengo ya bokonzi na ye mpe kongenga ya lokumu monene oyo azalaki na yango. Feti yango esalaki mikolo nkama moko na tuku mwambe.
5 Sima na mikolo yango, mokonzi asalisaki kati na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, feti mosusu oyo esalaki mikolo sambo mpo na bato nyonso, ezala babola to bazwi, oyo bazalaki kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi. 6 Elamba yango ezalaki na banzela ya langi ya mosaka, ya langi ya pembe mpe ya langi ya ble ; bakangisaki yango na makonzi oyo basala na mabanga ya marbre, na basinga ya lino ya langi ya pembe mpe ya motane ; bongo balekisaki yango kati na bapete ya palata. Batiaki bakiti minene ya wolo mpe ya palata, na etando ya lopango ya bakaro oyo basala na mabanga ya talo ya langi ya ndenge na ndenge : mabanga ya porfire, ya marbre, ya marbre ya mwindo mpe mabanga mosusu ya talo. 7 Bazalaki kokabola masanga ya vino na bakopo ya wolo ; kopo na kopo ezalaki na lolenge na yango. Bongo vino ezalaki penza ebele kolanda motema ya kokaba ya mokonzi. 8 Mokonzi apesaki mitindo ete moto nyonso oyo abengami na feti amela masanga ndenge alingi, pamba te atindaki bato nyonso oyo bakabolaka masanga kopesa na moto nyonso masanga ya vino kolanda posa ya moto na moto.
9 Vasti, mwasi ya mokonzi, ye mpe asalisaki feti mpo na basi, kati na ndako ya mokonzi Kizerisesi. 10 Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye : Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi. 11 Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi ; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko. 12 Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki ; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda. 13 Asololaki na bato na ye ya bwanya oyo bayebaka kososola tango, pamba te ezalaki momesano ete makambo ya mokonzi esengeli koya liboso ya bato nyonso ya bwanya, ba-oyo bayebi malamu makambo etali mibeko mpe bosembo, mpo ete basosola yango. 14 Nzokande, ezalaki na bato sambo ya lokumu, bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bazalaki bapesi toli oyo mokonzi azalaki kolinga makasi ; bazalaki kosangana na mayangani ya mokonzi mpe basimbaki misala oyo eleki minene. Bakombo na bango ezalaki : Karishena, Shetari, Adimata, Tarsisi, Meresi, Marisena mpe Memukani. 15 Mokonzi atunaki bango :
16 Memukani azongiselaki mokonzi liboso ya bakalaka na ye :
21 Toli oyo esepelisaki mokonzi elongo na bakalaka na ye. Mokonzi asalaki ndenge Memukani alobaki. 22 Atindaki mikanda na bituka nyonso ya mokili : etuka na etuka kolanda ndenge ezali ekomeli na yango ; mpe bato na bato, kolanda lokota na bango. Mikanda yango elobaki ete mobali nyonso asengeli kozala mokonzi ya ndako na ye mpe koloba monoko ya mboka na ye.
Ester 2 ->