1 Boye, nakanisaki mingi na makambo oyo nyonso mpe namonaki ete, ezala moto ya sembo, moto ya bwanya elongo na makambo nyonso oyo basalaka, bazali na maboko ya Nzambe ; kasi moko te ayebaka soki bolingo to koyina ezelaka ye. 2 Bato nyonso basukaka kaka ndenge moko : ezala moto ya sembo to moto mabe, ezala moto malamu to moto oyo asalaka masumu, ezala moto ya peto to moto ya mbindo, ezala moto oyo abonzaka mbeka to moto oyo abonzaka mbeka te.
3 Tala likambo oyo ezali mabe kati na makambo nyonso oyo esalemaka na se ya moyi : bato nyonso basukaka kaka ndenge moko ; lisusu, mitema ya bato etonda na mabe, mpe bozoba ezalaka kati na mitema na bango wana bazali nanu na bomoi ; mpe, sima na yango, bakokufa kaka.
4 Moto nyonso oyo azali kati na bato ya bomoi azalaka na elikya ; mbwa ya bomoi ezali malamu koleka nkosi oyo ekufa.
7 Kende, lia bilei na yo na esengo mpe mela masanga na yo ya vino na motema ya esengo ; pamba te Nzambe asili kondima misala na yo. 8 Tika ete bilamba na yo ezala tango nyonso peto, mpe nzoto na yo elumba tango nyonso solo ya malasi.
9 Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi ; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi. 10 Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
11 Namonaki lisusu likambo moko na se ya moyi :
12 Moto moko te ayebi tango nini ngonga na ye ekokoka : ndenge mbisi ekangamaka na monyama to ndenge banyama ekangamaka na motambo, ndenge wana mpe bato bakangamaka na mitambo ya pasi oyo ekweyelaka bango na mbalakata.
13 Namonaki lisusu na se ya moyi, ndakisa moko ya bwanya oyo ezalaki na tina mingi mpo na ngai : 14 ezalaki na engumba moko ya moke oyo ezalaki mpe na bato moke ; bongo mokonzi moko ya nguya ayaki kobundisa yango, azingelaki yango mpe atongaki milako mpo na kokonza engumba yango. 15 Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mobola moko oyo azalaki moto ya bwanya ; abikisaki yango na bwanya na ye, kasi moto moko te akanisaki mobola yango.
16 Boye namilobelaki : « Bwanya ezali malamu koleka makasi ya nzoto. » Kasi bwanya ya mobola etiolamaka, mpe bayokaka maloba na ye te.