1 Namoni mabe mosusu na se ya moyi, mpe ezali kilo makasi mpo na bato : 2 ezali na bato oyo bazwi kowuta na Nzambe bozwi, biloko ebele mpe lokumu mpo ete bazanga eloko moko te oyo mitema na bango ekoki kozala na yango posa ; kasi Ye moko Nzambe apimeli bango makoki ya kosepela na yango, pamba te moto mosusu nde azali kosepela na yango. Wana mpe ezali pamba, mpe ezali mabe oyo epesaka penza mawa.
3 Soki moto aboti bana nkama moko mpe azwi ngolu ya kowumela mibu ebele na bomoi ; bongo, atako awumeli mibu ebele na bomoi, asepeli te na bozwi na ye mpe azangi ata kunda, nalobi solo ete mwana oyo abotami ya kokufa azali malamu koleka ye ; 4 pamba te, mwana oyo abotami ya kokufa, abotami pamba, azongi kati na molili, mpe bakokanisa ye lisusu te ; 5 atako amoni moyi te to atikali koyeba ata eloko moko te, azali na kimia koleka mozwi. 6 Ata awumeli na bomoi mibu nkoto moko mbala mibale, akotikala komona esengo te. Boni, bato nyonso bakendaka kaka esika moko te ?
12 Pamba te, nani ayebi likambo oyo ezali malamu mpo na bomoi ya moto, na mikolo na ye nyonso ya bomoi ya pamba oyo azali kolekisa lokola elili ? Nani akoki koyebisa ye makambo oyo ekoya sima na ye, na se ya moyi ?
<- Mosakoli 5Mosakoli 7 ->