1 Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki : « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango. 2 Yawe, Nzambe na biso, asalaki boyokani elongo na biso elongo na ngomba Orebi. 3 Yawe asalaki te boyokani oyo na bakoko na biso kasi asalaki yango nde na biso, biso nyonso oyo tozali na bomoi awa na mokolo ya lelo. 4 Yawe alobaki na bino kati na moto likolo ya ngomba ndenge moto alobanaka na moto miso na miso. 5 Na tango wana, natelemaki kati ya Yawe mpe bino mpo na koyebisa bino maloba na Yawe, pamba te bozalaki kobanga moto mpe bomataki te likolo ya ngomba. Tala maloba oyo alobaki :
22 Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi ; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango.
23 Tango boyokaki mongongo kobima kati na molili, wana ngomba ezalaki kopela moto, bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bampaka na bino bayaki epai na ngai. 24 Balobaki : « Yawe, Nzambe na biso, alakisi biso nkembo na Ye mpe lokumu na Ye ; mpe toyoki mongongo na Ye wuta na moto. Lelo, tomoni ete moto akoki kozala na bomoi ata soki Nzambe asololi na ye. 25 Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye ? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso. 26 Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi ? 27 Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba ; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo ; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. »
28 Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai : « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu. 29 Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango ! 30 Kende, yebisa bango : ‹ Bozonga na bandako na bino. › 31 Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. »
32 Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino ; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu. 33 Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata.
<- Deteronomi 4Deteronomi 6 ->