1 Na mobu ya misato ya bokonzi ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Nzambe alakisaki makambo epai ya Daniele oyo bazalaki kobenga Belitsatsari. Makambo yango ezalaki ya solo : etalisaki pasi makasi oyo ekoya. Daniele azwaki mayele ya kososola yango kati na emoniseli.
2 Na tango wana, ngai Daniele, nasalaki matanga oyo esalaki baposo misato. 3 Nazalaki kolia lisusu bilei ya kitoko te ; ezala misuni to vino, eloko moko te ekotaki lisusu na monoko na ngai. Mpe, na baposo misato wana, nazalaki kopakola lisusu mafuta ya solo kitoko te.
4 Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya liboso, tango nazalaki pembeni ya ebale monene Tigre, 5 natombolaki miso na ngai na likolo mpe namonaki moto moko alata bilamba ya lino mpe mokaba moko ya wolo ya Ufazi na loketo na ye. 6 Nzoto na ye ezalaki kongenga lokola topaze, elongi na ye ezalaki kongala lokola mokalikali, miso na ye ezalaki kopela lokola moto, maboko mpe makolo na ye ezalaki kongenga lokola ebende ya bronze oyo balekisa na moto, mpe mongongo na ye ezalaki koyokana lokola makelele ya bato ebele.
7 Ngai, Daniele, ngai moko kaka nde namonaki emoniseli yango. Bato oyo bazalaki elongo na ngai bamonaki yango te, kasi somo makasi ekweyelaki bango, bakimaki mpe babombamaki. 8 Boye, natikalaki kaka ngai moko mpe nakomaki kotala emoniseli monene yango ; makasi esilaki ngai, elongi na ngai ebebaki makasi mpe nalembaki nzoto. 9 Nayokaki moto yango koloba ; bongo wana nazalaki koyoka mongongo na ye, nakweyaki makalikali, elongi kino na mabele.
10 Loboko moko esimbaki ngai mpe etelemisaki ngai, makolo mpe maboko na ngai ekomaki kolenga. 11 Bongo moto yango alobaki na ngai :
12 Akobaki koloba na ngai :
15 Wana azalaki koloba na ngai, nakitisaki elongi mpe nakokaki lisusu koloba te. 16 Boye, ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki bibebu na ngai, mpe nakokaki lisusu kofungola monoko na ngai mpo na koloba. Nalobaki na ekelamu oyo etelemaki liboso na ngai :
18 Ekelamu oyo ezalaki lokola moto esimbaki ngai lisusu mpe epesaki ngai makasi. 19 Elobaki na ngai :
20 Boye, elobaki :