7 Tala makambo oyo alakisaki ngai : Nkolo azalaki ya kotelema na likolo ya mir moko batonga na mbodi mpe, na loboko na Ye, asimbaki nivo oyo batongi ndako basalelaka. 8 Yawe atunaki ngai :
— Amosi, ozali komona nini ?
Nazongisaki :
— Nazali komona nivo oyo batongi ndako basalelaka.
Nkolo alobaki na ngai :
— Tala, nakotia nivo oyo batongi ndako basalelaka na likolo ya Isalaele, bato na Ngai. Nakolimbisa bango lisusu te. 9 Tango nakotelemela libota ya Jeroboami na nzela ya mopanga na Ngai, nakobebisa bisambelo ya likolo ya bangomba ya Izaki mpe bisika ya bule ya Isalaele.
Amosi mpe Amatsia
10 Amatsia, Nganga-Nzambe ya Beteli, atindelaki Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, maloba oyo : « Amosi azali kosalela yo likita mpo na kosala yo mabe kati na mokili ya Isalaele. Mokili ekoki te kondima koyokaka tango nyonso maloba na ye. 11 Pamba te, tala maloba oyo Amosi azali koloba :
‹ Jeroboami akokufa na mopanga,
mpe Isalaele akokende na bowumbu, mosika ya mabele na ye. › »
12 Amatsia alobaki na Amosi :
— Yo, momoni makambo, bima na mokili na biso ! Zonga na mokili ya Yuda. Kuna, okosala mbongo na masakoli na yo. 13 Kosakola lisusu na Beteli te, pamba te Beteli ezali Esika ya bule ya mokonzi mpe tempelo ya bokonzi.
14 Amosi azongiselaki Amatsia :
— Nazalaki mosakoli te to mwana ya mosakoli te, kasi nazalaki nde mobateli bibwele mpe moloni ya basikomori. 15 Kasi Yawe alongolaki ngai na mosala ya kobatela bibwele mpe alobaki na ngai : « Kende kosakola epai ya bato na Ngai, Isalaele. »
16 Yoka sik’oyo Liloba na Yawe, yo oyo ozali koloba na ngai : « Tika kosakola mpo na kotelemela libota ya Isalaele mpe tika koloba mabe mpo na ndako ya Izaki ! » 17 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Mwasi na yo akosala kindumba kati na engumba,
bana na yo ya mibali mpe ya basi bakokufa na mopanga,