1 Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo. 2 Boye, bantoma zomi na mibale basangisaki bayekoli nyonso mpe balobaki na bango :
5 Likanisi yango esepelisaki lisanga mobimba. Boye, baponaki Etieni, moto oyo atonda na kondima mpe na Molimo Mosantu ; Filipo, Prokore, Nikanori, Timoni, Parimenasi mpe Nikola, moto ya Antioshe, oyo akotaki na lingomba ya Bayuda. 6 Balakisaki bango epai ya Bantoma ; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.
7 Boye, Liloba na Nzambe ezalaki kokoba kopanzana, motango ya bayekoli ezalaki mpe kobakisama makasi na Yelusalemi mpe Banganga-Nzambe ebele bakomaki kondimela Yesu.
8 Nzokande, Etieni, moto oyo atondaki na ngolu mpe na nguya ya Nzambe, azalaki kosala bikamwa mpe bilembo minene kati na bato. 9 Bongo bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo ebengamaka Ndako ya mayangani ya bansomi : Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azia ; bakomaki kotia tembe na miso ya Etieni. 10 Kasi bazangaki makoki ya kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.
11 Bongo, bapesaki kanyaka epai ya bato mpo ete baloba : « Toyokaki Etieni koloba maloba ya kofinga Moyize mpe Nzambe. »
12 Batombokisaki bato, bakambi mpe balakisi ya Mobeko. Boye, bayaki kokanga Etieni na mbalakata mpe bamemaki ye na Likita-Monene. 13 Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki :
15 Bato nyonso oyo bavandaki na Likita-Monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu.
<- Misala ya Bantoma 5Misala ya Bantoma 7 ->