1 Sima na Polo mpe Silasi kolekela na Afipolisi mpe na Apolonia, bakendeki na Tesalonika epai wapi ndako ya mayangani ya Bayuda ezalaki. 2 Ndenge momesano na ye ezalaki, Polo akotaki na ndako ya mayangani. Basaba misato, asololaki na bato oyo bazalaki kuna na tina na Makomi. 3 Azalaki kotalisa mpe kolakisa bango polele ete Klisto asengelaki komona pasi mpe kosekwa kati na bakufi. Azalaki koloba na bango :
4 Ndambo ya Bayuda bandimisamaki mpe basanganaki na Polo mpe Silasi ; ndenge moko mpe na bato mingi ya Grese, oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe basi ebele ya lokumu.
5 Kasi Bayuda mosusu basalaki zuwa ; bakendeki kozwa bato ya mobulu oyo batambolaka pamba-pamba na balabala, basangisaki bango mpe babimisaki mobulu kati na engumba. Bakendeki mbangu na ndako ya Jazoni mpo na koluka Polo mpe Silasi mpo ete bamema bango liboso ya ebele ya bato. 6 Kasi lokola bamonaki bango te, bamemaki Jazoni mpe bandeko mosusu liboso ya bakambi ya engumba na koganga :
8 Tango ebele ya bato mpe bakambi ya engumba bayokaki bongo, batombokaki makasi. 9 Boye, bafutisaki Jazoni mpe bandeko mosusu lomande mpe, na sima, batikaki bango.
10 Wana butu ekomaki, bandeko bakimisaki Polo mpe Silasi noki-noki na Bere. Tango bakomaki kuna, bakotaki na ndako ya mayangani ya Bayuda. 11 Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo. 12 Bayuda ebele kati na bango bandimaki ; ndenge moko mpe, kati na bato ya Grese, basi mingi ya lokumu mpe mibali ebele bandimaki.
13 Kasi tango Bayuda ya Tesalonika bayokaki ete Polo azali koteya Liloba na Nzambe na Bere, mingi kati na bango bayaki mpe kuna mpo na kotia songisongi kati na bato mpo ete batomboka. 14 Bongo, kaka na tango yango, bandeko basalaki ete Polo akende na ebale mpo na kozwa masuwa, wana Silasi mpe Timote batikalaki na Bere. 15 Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni ; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.
16 Wana Polo azali kozela bango kati na Ateni, motema na ye etungisamaki mingi na komona ete engumba yango etonda na banzambe ya bikeko. 17 Boye, azalaki kosolola na Bayuda mpe Bagreki oyo bazalaki kogumbamela Nzambe kati na ndako ya mayangani, mpe na bato oyo azalaki kokuta, mokolo na mokolo, na bisika oyo bato ebele bakutanaka. 18 Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki :
22 Polo atelemaki liboso ya bato oyo basanganaki na Areopaje mpe alobaki :
32 Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki :
33 Na bongo, Polo atikaki bango. 34 Nzokande, bato mosusu balandaki Polo mpe bakomaki bandimi. Kati na bango, ezalaki : Denisi, moto ya Areopaje ; mwasi moko oyo kombo na ye ezali Damarisi, mpe bato mosusu.
<- Misala ya Bantoma 16Misala ya Bantoma 18 ->-
a Areopaje ezalaki ngomba moko ya mokuse epai wapi Likita-Monene ya bato ya Ateni ezalaki kosangana.