1 Bantoma mpe bandimi oyo bazalaki kati na Yuda bayokaki sango ete bato ya bikolo ya bapaya mpe bandimaki Liloba na Nzambe. 2 Boye, tango Petelo azongaki na Yelusalemi, Bayuda oyo bandimelaki Yesu bapamelaki ye 3 mpe balobaki :
4 Petelo ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge esalemaki ; alobaki na bango :
18 Tango bayokaki bongo, bazangaki maloba ya kobakisa, mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Nzambe asali ete ata bato ya bikolo ya bapaya babongola mitema mpo bazwa bomoi. »
19 Nzokande, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola Sango Malamu epai ya moto mosusu te, kaka epai ya Bayuda. 20 Kasi bamosusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene, bakendeki na Antioshe mpe bakomaki koteya Sango Malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato oyo balobaka lokota ya Greki. 21 Nguya ya Nkolo ezalaki elongo na bango, mpe bato ebele penza bandimaki mpe bamipesaki na Nkolo.
22 Sango yango ekomaki kino na Lingomba ya Yelusalemi, mpe batindaki Barnabasi, na Antioshe. 23 Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba. 24 Solo, Barnabasi azalaki moto malamu, azalaki atondisama na Molimo Mosantu mpe na kondima. Bato ebele bakangamaki na Nkolo.
25 Bongo, Barnabasi akendeki na Tarse mpo na koluka Saulo ; 26 mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.
27 Na mikolo wana, ndambo ya basakoli bakendeki na Antioshe longwa na Yelusalemi. 28 Moko kati na bango, kombo na ye ezalaki « Agabisi ; » atelemaki mpe asakolaki na nguya ya Molimo ete nzala makasi ekoya na bamboka nyonso oyo bato ya Rome bazali kokonza. Nzala yango ekotaki na tango ya mokonzi Klode. 29 Bayekoli oyo bazalaki kati na Antioshe bazwaki mokano ya kotinda masungi, moko na moko kolanda bozwi na ye, epai ya bandeko oyo bazalaki kovanda na Yuda. 30 Basalaki bongo : batindaki masungi na bango epai ya bakambi ya Lingomba, na nzela ya Barnabasi mpe Saulo.
<- Misala ya Bantoma 10Misala ya Bantoma 12 ->