Misala ya Bantoma
3 Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.
4 Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo :
6 Lokola basanganaki zingazinga na Ye, batunaki Ye :
7 Yesu azongiselaki bango :
9 Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango. 10 Mpe wana bazalaki nanu kotala na likolo ndenge Yesu azali komata, mbala moko bato mibale balata bilamba ya pembe-pembe batelemaki pembeni na bango mpe balobaki :
12 Bantoma bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi, na mosika ya bametele pene nkoto moko. 13 Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki :
14 Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.
15 Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale 16 mpe alobaki na bango : « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama ; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu. 17 Azalaki moko kati na biso mpe asanganaki elongo na biso kati na lotomo oyo epesamelaki biso. » 18 Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga ; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki. 19 Bato nyonso ya Yelusalemi bayokaki sango yango ; yango wana bakomaki kobenga elanga yango « Akelidama » oyo elingi koloba, na lokota na bango : Elanga ya makila. 20 Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo :
23 Bapesaki bakombo ya bato mibale : Jozefi oyo babengaki « Barsabasi » mpe ayebanaki lisusu na kombo Yusitusi, mpe Matiasi. 24 Bongo basambelaki boye : « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale, 25 mpo ete akoma ntoma mpe azwa, kati na lotomo oyo ya bontoma, esika oyo Yuda atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongi na ye. »
26 Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.
Misala ya Bantoma 2 ->