1 Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! »
2 Sango ekomelaki Joabi na koloba : « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. »
3 Mokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba : « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. » 4 Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba. 5 Mokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi : « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Mwana na ngai ya mobali ! »
6 Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye : « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo. 7 Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki. 8 Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. »
9 Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye.
12 Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ? 13 Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ? 14 Mpe boloba na Amasa : ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te ? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › »
15 Makambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye : « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. »
16 Mokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani.
17 Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi. 18 Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki. 19 Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi 20 mpe alobaki na ye : « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye. 21 Pamba te ngai, mosali na yo, nayebi ete nasalaki masumu, mpe lelo nayei awa lokola moto ya liboso kati na libota mobimba ya Jozefi mpo na kokutana na mokonzi, nkolo na ngai. »
22 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki :
23 Davidi azongisaki :
24 Bongo mokonzi alobaki na Shimei :
25 Mefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te. 26 Tango akomaki na Yelusalemi mpo na kokutana na mokonzi, Davidi atunaki ye :
27 Mefibosheti azongisaki :
30 Mokonzi alobaki na ye :
31 Mefibosheti alobaki na ye :
32 Barizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye. 33 Nzokande, Barizilayi akomaki mobange, azalaki na mibu tuku mwambe, mpe ezalaki ye nde asungaki mokonzi na mikolo nyonso oyo mokonzi avandaki na Maanayimi, pamba te azalaki moto ya bozwi mingi. 34 Mokonzi alobaki na Barizilayi :
35 Kasi Barizilayi azongiselaki mokonzi :
39 Mokonzi azongisaki :
40 Sima na bato nyonso kokatisa ebale Yordani, mokonzi mpe akatisaki. Bongo mokonzi apesaki Barizilayi beze mpe apambolaki ye. Mpe Barizilayi azongaki na ndako na ye.
41 Tango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi. 42 Kasi na mbala moko, bato nyonso ya Isalaele bayaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye :
43 Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele :
44 Bato ya Isalaele bazongiselaki bato ya Yuda :