1 Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi ; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka. 2 Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi ; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola. 3 Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi. 4 Atunaki Aminoni :
5 Yonadabi alobaki na ye :
6 Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye : « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. »
7 Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye : « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. »
8 Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango. 9 Alongolaki yango na kikalungu mpe apesaki yango na Aminoni, kasi Aminoni aboyaki kolia. Aminoni alobaki :
10 Aminoni alobaki na Tamari :
12 Tamari alobaki na ye :
14 Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye ; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto.
15 Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari :
16 Tamari azongiselaki ye :
21 Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi. 22 Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi.
23 Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi. 24 Abisalomi akendeki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :
25 Mokonzi azongisaki :
27 Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni.
28 Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye :
29 Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki. 30 Wana bazalaki nanu na nzela, sango ekomaki epai ya Davidi : « Abisalomi abomi bana mibali nyonso ya mokonzi, moko te kati na bango atikali. » 31 Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka. 32 Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki : « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye. 33 Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi. »
34 Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. »
35 Yonadabi alobaki na mokonzi :
36 Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye. 37 Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali.
38 Abisalomi akimaki mpe akendeki na mboka Geshuri, avandaki kuna mibu misato. 39 Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni.
<- 2 Samuele 122 Samuele 14 ->