1 Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola. 2 Mozwi azalaki na bameme mpe bangombe ebele, 3 kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi. 4 Mokolo moko, mopaya moko ayaki epai ya mozwi, kasi mozwi aboyaki kozwa meme moko kati na bameme na ye to ngombe moko kati na bangombe na ye mpo na kolamba yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye ; azwaki kaka mwa mwana meme ya mwasi ya mobola mpe alambaki yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye. »
5 Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan :
7 Natan alobaki na Davidi :
13 Davidi alobaki na Natan :
15 Sima na yango, Natan azongaki na ndako na ye. Yawe abetaki mwana oyo mwasi ya Iri abotelaki Davidi, mpe mwana yango akomaki kobela. 16 Davidi abondelaki Nzambe mpo na mwana, akilaki bilei, akotaki na ndako na ye mpe akomaki kolala na mabele babutu nyonso. 17 Bakambi ya ndako na ye bayaki kotelema pembeni na ye mpo na kotelemisa ye wuta na mabele, kasi aboyaki mpe andimaki te kolia bilei elongo na bango. 18 Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela : « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini ? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe ! »
19 Davidi amonaki basali na ye koloba na se se kati na bango, mpe asosolaki ete mwana akufi. Atunaki :
20 Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki.
21 Basali na ye batunaki :
22 Azongisaki :
24 Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba ; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo. » Yawe alingaki ye 25 mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye.
26 Joabi abundisaki engumba Raba ya bato ya Amoni mpe abotolaki mboka mokonzi. 27 Joabi atindaki bantoma koloba na Davidi : « Nabundisi Raba mpe nabotoli eteni ya mabele epai wapi mayi ezali. 28 Sik’oyo, sangisa basoda oyo batikali, bozingela engumba Raba mpe bokamata yango ; soki te nakokamata yango ngai moko, mpe kombo na ngai ekosakolama kuna. »
29 Davidi asangisaki mampinga nyonso mpe akendeki na Raba, abundisaki mpe akamataki yango. 30 Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango. 31 Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso.
<- 2 Samuele 112 Samuele 13 ->