1 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Yorami, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi. 2 Asalaki mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na tata mpe mama na ye. Abukaki ekeko ya Bala oyo tata na ye atelemisaki, 3 kasi akangamaki kaka na lisumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo amemaki Isalaele na kosala masumu ; atikalaki kobongwana na yango te.
4 Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango. 5 Tango Akabi akufaki, mokonzi ya Moabi atombokelaki mokonzi ya Isalaele. 6 Na tango wana, mokonzi Yorami abimaki na Samari mpe asangisaki Isalaele mobimba. 7 Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda :
8 Jozafati atunaki :
9 Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango. 10 Mokonzi ya Isalaele akamwaki :
11 Kasi Jozafati atunaki :
12 Jozafati alobaki :
14 Elize azongisaki :
20 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, na tango oyo batumbaka mbeka, mayi ebandaki kotiola na nzela ya Edomi, mpe mabele etondaki na mayi. 21 Nzokande, sima na bato nyonso ya Moabi koyoka sango ete bakonzi bayei kobundisa bango, babengaki bato nyonso, bilenge mpe mikolo oyo bakoki komema bibundeli, mpe batelemisaki bango na mondelo ya mboka. 22 Tango balamukaki na tongo-tongo, moyi ezalaki kongala na mayi ; mpe bato ya Moabi bamonaki liboso na bango mayi motane lokola makila. 23 Bagangaki : « Ezali makila ! Bakonzi babundi bango na bango. Sik’oyo, bato na Moabi, tokende kobotola biloko na bango ! »
24 Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango. 25 Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango ; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola. 26 Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te. 27 Boye azwaki mwana na ye ya liboso ya mobali oyo alingaki kokitana na ye na bokonzi, abonzaki ye lokola mbeka ya kotumba, na likolo ya mir ya engumba. Tango bamonaki bongo, bana ya Isalaele bayokaki mawa, balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango.
<- 2 Bakonzi 22 Bakonzi 4 ->