1 Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ; 2 pamba te Nzambe alobi :
« Na tango ya malamu, nayanolaki yo ;
mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. »
Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.
3 Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso. 4 Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi
kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;
5 kati na kobetama, boloko mpe mobulu ;
kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;
6 kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ;
11 Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama. 12 Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino. 13 Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo : Bosala lokola biso ! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino !
Kokabwana na mabe
14 Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ? 15 Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ? 16 Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko :