1 Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abiya. » Abiya azalaki mwana mwasi ya Zakari. 2 Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.
3 Na sanza ya liboso ya mobu ya liboso ya bokonzi na ye, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe abongisaki yango. 4 Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, asangisaki bango na libanda ya ngambo ya este.
5 Alobaki na bango :
15 Tango basangisaki bandeko na bango mpe bamibulisaki, bakotaki mpo na kopetola Tempelo ya Yawe, ndenge mokonzi apesaki mitindo mpe kolanda Liloba na Yawe. 16 Banganga-Nzambe bakotaki kati na Tempelo ya Yawe mpo na kopetola yango : babwakaki kati na lopango ya Tempelo ya Yawe biloko nyonso ya mbindo oyo bamonaki kati na yango. Balevi balokotaki mpe bamemaki yango kino na lubwaku ya Sedron. 17 Babandaki mosala yango ya kopetola na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe, na mokolo ya mwambe ya sanza yango, bakomaki na ndako moke ya kokotela na Tempelo. Basalaki lisusu mikolo mwambe mpo na kokoba kobulisa Tempelo ya Yawe mpe basukisaki mosala yango na mokolo ya zomi na motoba ya sanza ya liboso.
18 Bakendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe balobaki :
20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, mokonzi Ezekiasi asangisaki bakambi ya engumba mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe. 21 Bamemaki bangombe sambo ya mibali, bameme sambo ya mibali, bana meme sambo ya mibali mpe bantaba sambo ya mibali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na mokili, mpo na Esika ya bule mpe mpo na Yuda. Mokonzi apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ete babonza bambeka yango na etumbelo ya Yawe. 22 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bangombe, bazwaki makila na yango mpe babwakaki yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bameme ya mibali mpe babwakaki makila na yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bana meme mpe babwakaki makila na yango na etumbelo. 23 Bongo bamemaki bantaba ya mibali oyo ebongisamaki mpo na mbeka mpo na masumu, liboso ya mokonzi mpe lisanga, mpe batiaki yango maboko. 24 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bantaba mpe babwakaki makila na yango na etumbelo lokola mbeka mpo na masumu, mpe mpo na kokokisa mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele mobimba ; pamba te mokonzi apesaki mitindo ete babonza mpo na Isalaele mobimba bambeka ya kotumba mpe bambeka mpo na masumu. 25 Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi ; mpe ya mosakoli Natan ; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye. 26 Balevi babongamaki elongo na bibetelo mindule ya Davidi, mpe Banganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango. 27 Ezekiasi apesaki mitindo ete babonza mbeka ya kotumba na etumbelo ; mpe tango babandaki kobonza mbeka ya kotumba, babandaki mpe koyemba mpo na kokumisa Yawe na bakelelo mpe bibetelo mindule ya Davidi, mokonzi ya Isalaele. 28 Lisanga mobimba egumbamaki wana ; bayembi bazalaki koyemba, mpe babeti kelelo bazalaki kobeta yango ; nyonso ekobaki kino tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba. 29 Tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba, mokonzi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakitisaki bilongi na bango mpe bagumbamaki kino na se. 30 Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.
31 Ezekiasi alobaki :