1 Tango Samuele akomaki mobange, aponaki bana na ye ya mibali mpo ete bazala basambisi kati na Isalaele. 2 Kombo ya mwana na ye ya liboso ya mobali ezalaki « Joeli, » mpe ya mibale, « Abiya. » Bazalaki kosala mosala na bango na Beri-Sheba, 3 kasi batambolaki te na nzela ya Samuele, tata na bango : bamipesaki na lokoso ya mbongo, na kozwaka kanyaka mpe na kokataka makambo na bosembo te. 4 Mpo na yango, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele basanganaki elongo mpe bakendeki epai ya Samuele, na Rama. 5 Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. »
6 Kasi tango balobaki : « Pesa biso mokonzi oyo akokamba biso, » Samuele asepelaki na likambo yango te ; boye asambelaki Yawe. 7 Mpe Yawe azongiselaki Samuele : « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango. 8 Bazali kosala yo ndenge kaka basalaki Ngai, banda mokolo oyo nabimisaki bango na Ejipito kino lelo : basundolaki Ngai mpe basalelaki banzambe mosusu. 9 Sik’oyo, yoka bango ; kasi kebisa bango malamu mpe yebisa bango makambo nyonso oyo mokonzi oyo akokonza bango akobanda kosala. »
10 Samuele ayebisaki bato oyo bazalaki kosenga ye mokonzi maloba nyonso ya Yawe. 11 Alobaki na bango :
19 Kasi bato baboyaki koyokela Samuele, balobaki :
21 Tango Samuele ayokaki maloba nyonso ya bato, amemaki yango liboso ya Yawe. 22 Mpe Yawe alobaki na Samuele : « Yokela bango mpe pesa bango mokonzi ! »