1 Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi. 2 Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni. 3 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye. 4 Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo ; kaka nzoto na ye nde etikalaki. 5 Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te.
6 Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu. 7 Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki :
8 Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango :
9 Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo. 10 Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni.
11 Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango :