2 Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi :
3 Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe Ayimeleki :
5 Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi :
6 Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe :
7 Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso. 8 Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo.
9 Davidi atunaki Ayimeleki :
10 Nganga-Nzambe azongisaki :
11 Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati. 12 Kasi basali ya Akishi balobaki na ye : « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka ? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye : ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi ? › »
13 Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati. 14 Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma : kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu. 15 Akishi alobaki na basali na ye : « Botala tata oyo, azali moto ya liboma ! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai ? 16 Boni, nazangi penza bato ya maboma mpo ete bomema mobali oyo awa, na tina ete aya kosala makambo na ye ya liboma ? Boni, moto ya boye asengeli penza kokota na ndako na ngai ? »
<- 1 Samuele 201 Samuele 22 ->