1 Yawe alobaki na Samuele :
2 Samuele alobaki :
4 Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye :
5 Samuele azongisaki :
6 Tango bakomaki, Samuele atalaki Eliabi mpe amilobelaki : « Solo, mopakolami na Yawe atelemi awa liboso na Ye. »
7 Kasi Yawe alobaki na Samuele :
8 Bongo Izayi abengisaki Abinadabi mpe alekisaki ye liboso ya Samuele. Kasi Samuele alobaki : « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
9 Izayi alekisaki lisusu Shama liboso ya Samuele, kasi Samuele alobaki : « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
10 Izayi alekisaki liboso ya Samuele bana sambo na ye ya mibali. Kasi Samuele alobaki na ye : « Yawe aponi moko te kati na bango. »
11 Bongo Samuele atunaki Izayi :
12 Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko ; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele : « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »
13 Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.
14 Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye. 15 Basali ya Saulo bayebisaki ye :
17 Boye Saulo alobaki na basali na ye :
18 Moko kati na basali na ye azongisaki :
19 Saulo atindaki bantoma epai ya Izayi mpo na koloba na ye : « Tindela ngai Davidi, mwana na yo ya mobali, oyo azali koleisa bampate. »
20 Izayi azwaki ane moko ; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali. 21 Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli. 22 Saulo atindaki maloba epai ya Izayi : « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. »
23 Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye.
<- 1 Samuele 151 Samuele 17 ->