1 Samuele
1 Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi. 2 Elikana azalaki na basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Penina ; » mosusu, « Ana. » Penina azalaki na bana, kasi Ana azalaki na mwana te. 3 Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe. 4 Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi. 5 Kasi epai ya Ana, azalaki kopesa biteni yango mbala mibale, pamba te azalaki kolinga ye, atako Yawe akangaki ye mabota. 6 Nzokande, lokola Yawe akangaki ye mabota, mbanda na ye azalaki kaka kotiola ye tango nyonso mpo ete atomboka. 7 Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te, 8 Elikana, mobali na ye, atunaki ye : « Ana, mpo na nini ozali kolela ? Mpo na nini ozali kolia te ? Mpo na nini ozali na mawa boye ? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi ? »
9 Mokolo moko, sima na bango kolia mpe komela na Silo, Ana atelemaki mpe akendeki na Ndako ya Yawe. Ezalaki na ngonga oyo Nganga-Nzambe Eli avandaki na kiti, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe. 10 Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi. 11 Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. »
12 Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye. 13 Mpe wana Ana azalaki kobondela na se ya motema, bibebu na ye ezalaki koningana, kasi mongongo ezalaki koyokana te. Mpe Eli akanisaki ete Ana alangwe masanga. 14 Eli alobaki na Ana :
15 Ana azongisaki :
17 Eli azongisaki :
18 Ana alobaki :
19 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama.
21 Na mobu oyo elandaki, Elikana, elongo na libota na ye mobimba, akendeki lisusu kobonzela Yawe mbeka ya mibu nyonso mpe kokokisa elaka na ye. 22 Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye :
23 Elikana, mobali na ye, alobaki :
24 Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino. 25 Sima na bango koboma ngombe mpo na kobonza yango lokola mbeka, bamemaki mwana epai ya Eli. 26 Ana alobaki na ye :