1 Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso elongo na bakonzi tuku misato na mibale na bampunda mpe bashar ; akendeki kozingela Samari mpe abundisaki yango. 2 Atindaki bantoma kati na engumba epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele 3 na maloba oyo :
4 Mokonzi ya Isalaele azongisaki :
5 Bantoma bazongaki lisusu mpe balobaki :
7 Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango :
8 Bampaka mpe bato nyonso balobaki na ye :
9 Boye Akabi azongisaki epai ya bantoma ya Beni-Adadi :
10 Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi :
11 Mokonzi ya Isalaele azongisaki :
12 Beni-Adadi ayokaki sango yango tango ye elongo na bakonzi bazalaki komela na bandako ya kapo. Apesaki mitindo epai ya bato na ye :
13 Na tango wana kaka, mosakoli moko ayaki epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpe alobaki na ye :
14 Akabi atunaki :
15 Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike ; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki : bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo. 16 Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo. 17 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki bato ya liboso. Nzokande Beni-Adadi azwaki sango epai ya banongi na ye oyo balobaki na ye :
18 Beni-Adadi alobaki :
19 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki na engumba elongo na mampinga sima na bango. 20 Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar. 21 Mokonzi ya Isalaele apusanaki, abebisaki bampunda elongo na bashar mpe alongaki bato ya Siri na elonga monene.
22 Sima na yango, mosakoli ayaki epai ya mokonzi ya Isalaele mpe alobaki :
23 Na tango wana bakalaka ya mokonzi ya Siri bapesaki ye toli : « Banzambe na bango bazali banzambe ya bangomba. Yango wana balekaki biso na makasi, kasi soki tobundi na bango na bitando, tokoleka bango solo na makasi. 24 Sala boye : longola bakonzi nyonso na bisika na bango mpe tia bakonzi mosusu ya basoda na bisika ya bato oyo ya liboso. 25 Osengeli mpe lisusu kobongisa mampinga lokola oyo owutaki kobungisa : mpunda mpo na mpunda, shar mpo na shar, mpo ete tokoka kobundisa Isalaele na etando. Solo, tokoleka bango na makasi. » Beni-Adadi ayokaki bango mpe asalaki bongo.
26 Na mobu oyo elandaki, Beni-Adadi asangisaki mampinga na ye ya Siri mpe amataki na Afeki mpo na kobundisa Isalaele. 27 Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli ; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba.
28 Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele :
29 Mikolo sambo, milako ya mampinga nyonso mibale ezalaki etalana. Na mokolo ya sambo, etumba ebandaki mpe bato ya Isalaele babomaki basoda ya mpiko ya Siri nkoto nkama moko. 30 Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo.
32 Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye :
33 Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo :
35 Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe :
36 Bongo alobaki na ye :
37 Mwana wana ya basakoli akendeki kokutana na moto mosusu mpe asengaki na ye ete abeta ye. Moto wana abetaki ye makasi mpe azokisaki ye.
38 Mwana ya basakoli amibongolaki na elateli na ye, azipaki elongi na ye na nzela ya eteni ya elamba mpo ete bayeba ye te, mpe akendeki kotelema na nzela oyo mokonzi Akabi akolekela.
39 Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki :
41 Mbala moko, mosakoli alongolaki eteni ya elamba oyo ezipaki elongi na ye ; mpe Akabi, mokonzi ya Isalaele, asosolaki ete moto yango azali moko kati na bana ya basakoli. 42 Mosakoli alobaki na mokonzi :
43 Mokonzi ya Isalaele azongaki epai na ye, na Samari, na mawa mpe na kanda.
<- 1 Bakonzi 191 Bakonzi 21 ->